Home Search Countries Albums

Belela Yesu

RODRIGUE KOYALULA

Belela Yesu Lyrics


Ata ba pasi na motema na ngai
Ata minyoko na bomoyi na ngai
Ata mikakatano elati nzoto lokola malili 
Elikia na ngai eza se epayi na yo

Ata ba pasi na motema na ngai
Ata minyoko na bomoyi na ngai
Ata mikakatano na libota na ngai
Elikia na ngai eza se epayi na yo

Na kanisi lisusu Chadrac Meschac Abednego
Ba bwaka maki na libulu na moto
Moto ya mineyi na moto ozalaki na bango 
Ooh  Yesu otikaka te

Huuum ata na pasi ata minyoko nakolikia se ee
Ata ne sengo to na aa mawa 
Oko telemaka moto ya suka pona nga aaa
Yesu elikia na ba ndimi

Yesu eeh, Yeeeesu, Yesu ee 
Yonde bolingo na nga aa 
Ngai na taleli yo
Na taleliyo ooh
Na ko tika yo te 
Na ko tika yo te
Alléluia eeh

Ata ba pasi na bomoyi na ngai
Ata ko zanga na libota na ngai
Ata bo bola na bomoyi na ngai 
Elikia na ngai eza se epayi na yo oo

Ata ba pasi na bomoyi na ngai
Ata ko zanga na libota na ngai 
Ata bo bola elati nzoto lokola malili 
Elikia na ngai eza se epayi na yo

Na kanisi lisusu bomoyi  ya Daniel 
Abwakamaki na libulu ya ba nkosi
Osalaki ye kosi na kati ya ba nkosi 
Oooh  Yesu yo otikaka te ee


Yesu ee, Yeeeesu , Yesu ee 
Yo nde bolingo na nga aa 
Nga na taleli yo 
Na taleli yo oo 
Na ko tika yo te 
Na ko tika yo te
Yesu ee, Yeeeesu , Yesu ee 
Yo nde bolingo na nga aa 
Nga na taleli yo 
Na taleli yo oo 
Na ko tika yo te 
Na ko tika yo te

Hee ayéee
Yesu motema na ngai
Motema oyo eza ya yo
Na kangama nayo
Yesu Yesu 
Bolingo na ngai

Israel liboso na mayi ya monana 
Abelelaki  Yawhe  Nzambe na lola aa
Nzambe na Mose okabolaki mayi 
Ooh Yesu yo otikaka te 
Congo mboka na ngai ekomi na pasi
To beleli yo Nzambe 
Nzambe na lola 
Nzambe ya bikamwa ozali wapi papa 
Nkolo na ngai otikaka te ee
 
Yesu eeh, Yeeeesu, Yesu ee
Yo nde bolingo na nga aa
Na na taleli yo oo
Ngai taleli yo 
Na ko tika yo te ee
Na ko tika yo te
Ma oooh

He he he Yesu
Bolingo nanga aa yesu
Yesu ya Nzambe 
Motema nanga 
Motema eza ya yo
Bolingo na ngai
Alléluia 

Na yango molingami 
Yo oyo ozo lela lela
Na lingi obelela Yesu elongo moko na ngai 
Eza lisusu tango ya kolela lela te
Sala lokola ngai
Belela Yesu

Belela belela yesu uu (Yesu uuh)
Belela yaya (Yesu uuh) 
Moninga oyo abwakaka te ooh (Yesu uuh) 
Makasi ngai 
Yo nde bolingo ngai

Moninga ya tango nyoso Yesu (Yesu uuh)
Ata na pasi nga na talelaka yo oo
Moninga ya motema na ngai yeee
Yo nde makasi nanga
Yonde bolingo na ngai

Moniga oyo alembaka te oo 
Epa nayo na pesa motema Yesu (Yesu uuh)
Ata na kufa na talela yo ooh (Yesu uuh)
Yo nde bolingo na ngai

Belela belela yesu (Yesu uuh) 
Ooh ooh belela Yaya (Yesu uuh)
Na yo yesu na kangama na yo (Yesu uuh)
Na kangama na yo ooh (Yesu uuh)
Yo nde bolingo na ngai

Huuum na kotalela Yesu uuh (Yesu uuh)
Na kangama nayo na kotalela Yesu (Yesu uuh)
Nakotika te kosalela Yesu ee (Yesu uuh
Motema na ngai 
Yo nde bolingo na ngai
Hum yo nde yo nde eee…

Enjoy Synced Lyrics With Our Mobile App

Download on Google PlayGet it on App Store

WATCH VIDEO

ABOUT THIS SONG


Release Year : 2019


Album : Belela yesu (Single)


Added By : J.Mabongo.7

SEE ALSO

AUTHOR

RODRIGUE KOYALULA

CONGO (DRC)

Rodrigue Koyalula is a Gospel singer frm Congo ( DRC). ...

YOU MAY ALSO LIKE