Home Search Countries Albums

Na tiela yo motema

MOISE MATUTA

Na tiela yo motema Lyrics


Na tiela yo motema Nazua eloko, 
Opesa ngai na moyi oyo butu epimela nga.
Obongisela ngai oyo mokili ebebisa eeh.
Ozongisela ngai ya motuya na bungisa eeh yaya na ngai.
O yanola ngai losambo nasala na bosana.
Losambo ya secret biyano opesi na miso ya bato, 
Oboya na mema likambo eleki ngai moto, 
Nzambe na ngai ayebi epekiselo te ooh yaya na ngai.
Yo opekisa ngai na koma miso payi payi, 
Ko lula oyo opesa na basusu, 
Na tala ekulusu epayi nionso ewutaka, 
Nazua oyo opesa na baninga eeeh .
Yo Oza pole eeeh lakisa ngai nzela eeh, 
Liloba oyo elakisa ngai lelo koloba,
 Kimia oyo elakisa ngai ko fanda na bato, 
Nzambe oyo akokisela ngai ba ndoto eeh ndoto na ngai. X2

Ata nazo lumba solo ya ba mpate, 
Nayebi osopela nga mafuta, 
Na maboko libanga ekweyisa goliathe eeh, 
Suka suka nakolata ki bo konzi, 
Ata ba botoli nga manteau ya papa, 
Ba teki ngai molongo na ndako ya potiphar, 
Ba koka te kotekisa ba ndoto eeh, 
Suka suka eeeh nakolata ki bo konzi eeh.
Bo nzambe ebongi nayo moyenge bene, 
Ozuwa kembo wuta bo mwana eeh, 
Tango yango obongolaki nanu vino te, 
Tango yango osekwisaki lazalo te, 

Soki pe osaleli ngai bikamua eeeh, 
Ata oboyi na loba motema ezo boya, 
Soki na lobi na bomba motema moto, 
Suka suka na tatola Pona zua kimia eeh, 
Bo nzambe ebongi nayo papa eeh, 
Bo nzambe ebongi nayo yaya, 
Ozuwa kembo wuta bo mwana eeh, 
Tango yango obongolaki nanu vino te, 
Tango yango osekwisaki lazalo te, 
Sokipe osaleli ngai bikamua eeeh 
Ata oboyi na loba motema ezo boya, 

Soki na lobi na loba motema moto, 
Suka suka na tatola Pona zua kimia eeh.
Nga moko tango ya ba ngomba ya mikakatano, 
Olimuisela nga yaya eeeh, 
Sikoyo kondima na ngai emati, 
Tala loyembo ya motema yango eeh.
Bo nzambe ebongi nayo yaya, 
Ozuwa kembo wuta bo mwana eeh, 
Tango yango obongolaki nanu vino te, 
Tango yango osekwisaki lazalo te, 
Sokipe osaleli ngai bikamua eeeh 
Ata oboyi na loba motema ezo boya, 
Soki na lobi na loba motema moto, 
Suka suka na tatola Pona zua kimia eeh.
Nga moko tango ya ba ngomba ya mikakatano, 
Olimuisela nga yaya eeeh, 

Sikoyo kondima na ngai emati, 
Tala loyembo ya motema yango eeh.
Bo nzambe ebongi nayo yaya, 
Ozuwa kembo wuta bo mwana eeh, 
Tango yango obongolaki nanu vino te, 
Tango yango osekwisaki lazalo te, 
Sokipe osaleli ngai bikamua eeeh 
Ata oboyi na loba motema ezo boya, 
Soki na lobi na loba motema moto, 
Suka suka na tatola Pona zua kimia eeh.

Enjoy Synced Lyrics With Our Mobile App

Download on Google PlayGet it on App Store

WATCH VIDEO

ABOUT THIS SONG


Release Year : 2013


Album : Trophée (Album)


Added By : Olivier Charly

SEE ALSO

AUTHOR

MOISE MATUTA

CONGO (DRC)

Moise Matuta is an Evangelist, gospel artist composer from the Democratic Republic of Congo ...

YOU MAY ALSO LIKE