Home Search Countries Albums

Dieu De La Différence

IRA BLESSING

Dieu De La Différence Lyrics


Ozali Nzambe ee
Ozali Nzambe ee
Ozali Nzambe oo oo
Yawhe ozali Nzambe ee (amen)
Ozali Nzambe oo (amen)
Ozali Nzambe nanga ee (Alléluia amen)

Likolo kuna esik’ozali
Engengi nyoso
Awa yo oponi motema na nga 
Tika na ngenga Yawhe ee
Loboko ekatisaka bibale 
Eza ya yo Yesu
Loboko ekotaka ti na motema 
Aza ya Yesu
Liloba nano ebimi na monoko te ee
Oyebi nyoso
Bitumba oyo nga nano na bundi te ee
Déjà y’opesi elonga
Yango na kopyemba ee

Alléluia 
Nako yemba oo Yawhe oo (Amen) 
Yawhe ee (Alléluia, Alléluia amen)

Pasi na ngai esengi nani ee (Amen) 
Nzaaambe Yawhe oo (Amen) 
Nzaaambe e e  (Amen, Alléluia amen)
 
Pasi na ngai esengi nani ee (Amen) 
Nzaaambe Yawhe oo (Amen) 
Nzaaambe e e  (Amen, Alléluia amen)

Nzambe nanga Nzambe ya bokeseni
Oyebi nyoso
Obandaka esika moto asukeli 
Po ayemba nzembo
Esika nazo kenda déjà y’owuti kuna 
Obongisi nyoso
Nzube na nzela y’otie na moto 
Na tamboli na assurence
Elongi ya Mose engala lokola libende ba tie na moto 
Po asololaki na Yawhe 
Bongo nga moto na memi yo na nzoto
Na ngenga te ndenge nini ee

Alléluia 
Ozali Nzambe (Amen)
Bonzenga nanga (Alléluia, Alléluia amen)

Yawhe oo (Alléluia  Amen) 
Yawhe oo (Alléluia  Alléluia amen)

Nzambe oyo asalaka makambo kozanga toli 
Oyebi nyoso
Ozalaka na posa te ba betela yo lisolo
Po oyeba vie ya moto
Nani abelela yo asambua ee
Nani alanda yo abunga ee
Nani atiela yo motema ayoka soni 
Esalema wapi

Nzambe nanga Nzambe ya bokeseni
Nzambe ya différence Yesu
Bokeseni Yesu ee e
Salela nga makambo ya bokeseni
Ekoma lisolo ya kobeta
Na kelasi to na mosala
Ekoma témoignage

Avenue nanga bayoka sango
Famille nanga bayoka sango
Nzambe na nga asali ya bokeseni 
Etikala sango  

Il est vivant Yoshua e e
Lokola aza vivant ako sala kaka Yesu

Ooh aza na nyoso Nzambe na nga
Soki aza na nyoso nga pe naza na nyoso 
Kati na ye e e e
Lele le lelile
Lele lele lile le
Lele lele leli le le le
Nzambe oyo sunga ee 

Nzaaambe Elombe ee (Amen)
Nzaaambe e e (Alléluia amen)
 
Célibat to masque de vieillesse esengi nani ee
Nzaaambe
Esengi nganga kisi te ee
Nzaaambe e e  (Alléluia amen)

Bisika na kosukela nani akokota ee (Amen)
Nzaaambe (Amen)
Nzambe azanga ndelo Yesu (Amen)
Nzaaambe e e (Alléluia amen)

Bongo lisolo ya vie na nga nani akoma yango
Nzaaambe
Nani akoki’otia point
Nzaaambe e e 
Alléluia amen

Yoka zenga zenga zenga mambu Yesu ee (Amen)
Nzaaambe (Amen)
Zenga mambu Yesu oyo(Amen)
Nzaaambe e e  (Alléluia amen)

Yoka zenga zenga zenga mambu Yesu aye bandeko (Amen)
Nzaaambe (Amen)
Zenga mambu Yesu oyo(Amen)
Nzaaambe e e  (Alléluia amen)

Enjoy Synced Lyrics With Our Mobile App

Download on Google PlayGet it on App Store

WATCH VIDEO

ABOUT THIS SONG


Release Year : 2019


Album : Dieu De La Différence (Single)


Added By : J.Mabongo.7

SEE ALSO

AUTHOR

IRA BLESSING

CONGO (DRC)

...

YOU MAY ALSO LIKE