Home Search Countries Albums

Pona Bolamu

ATHOMS & NADEGE

Pona Bolamu Lyrics


Na koki te kobomba eeee
Na koki te kofanda kimia
Na koki te nazanga maloba
Na koki te nakanga monoko
Bolamu ya Nzambe eleki monene
Na koki te kobombaeee
Pona bolamu oyo Osalieeee!
Pona bolamu oyo Osalieeee!


Na koki te na fanda kimia
Na koki te na kanga monoko
Bolamu ya Nzambe elekeli nga mosantu
Na koki te ko zanga maloba
Akanisaka nga ata na kanisi Ye te, Yesu na ngayi
Ô naza na talo
Pona bolingo oyo na monieeee
Pona bolamu oyo osalieeeee

Ba sujet nionso eza nango valable
Soki olingi osanjola Nzambe
Basusu basanjoli Ye pona lipa
Basusu basanjola Ye pona mbongo
Sujet nionso eza nango na tina
A condition que oza mosantu yaya
Pona bolamu oyo Osalieeee!
Pona bolamu oyo Osalieeee!

Nzambe monene lokola Yo papa
Na mokili oyo na moni te
Nakanisi nionso osaleli nga
Na zongi pene na Yo pona kumisa Yo
Balobi na nga nabina lokola liboma
Kasi na yebi sujet ya mabino na nga

Eza
Bolamu oyo Osalieeee!
Eza
Bolamu oyo Osalieeee!

Bakamwe nga balobi na banda
Ba mituni eza pona nini ?
Ba yebi te témoignage ya motema
Makambo eleki nga meke molimo ata moto mosusu ayeba te
Motema na nga ezali témoin!

Témoin ya
Bolamu oyo Osalieeee!
Naza témoin ya
Bolamu oyo osalieeee

Ewuti nga mozindo na motema
Ebimi nga kino monoko
Nalingi nakanga kasi nakoki te
Motema na nga esi etondi
Etondi na bolamu na Nzambe
Na libota to pe na santé na nga yaya

Na yemba
Bolamu oyo Osalieeee!
Na yemba,
Bolamu oyo Osalieeee!

Na etonga, maboko na nga likolo
Molimo na nga esi emati
Mpinjoli na nga na miso eza kotangaeee
Na mituniooo pona nini
Nazui rétroviseur na tali kala eeee
Bolamu nionso Nzambe asala

Na yembiooo!
Bolamu oyo Osalieeee!
Quand je me souviens je me mets à chanter
Bolamu oyo Osalieeee
A chanter comme un fou pour l’amour de Jésus

Eloko mususu te na bomoyi na nga
Eza na motuya lokola makambo oyo
Oyo Masiya asalela nga
Oyo elekela nga ma banzo
Yango na pesa wolo to pe palata
Nionso na pesa soki asengi

Pona bolamu oyo na monieeeee
Pona bolamu oyo na monieeeee

Yahwe eeee Yahwe ee olongi motema na nga!

Olongieeee, ô motemaaa!

Yahwe eeee, Yahwe eee olongi motema na nga!

Yahwe eeee Yahwe ee olongi motema na nga!
Olongieeee, motemaaa ya mosantu na Yo eee!

Yahwe eeee Yahwe ee olongi motema na nga!
Yahwe
Olongieeee, molimo ya moyengebene ooo!
Ô Papa oooh, oooh Yaweh
Yahwe eeee Yahwe ee olongi motema na nga!

Na komo tika ozala nga , na komo koma lokola Yo,
Yahwe eeee Yahwe ee olongi motema na nga!

Yaya, ô papa mozindo ya motema papa

Moto ya kanda kanda azua douceur ya molimoeeee!
Yahwe eeee Yahwe eee olongi motema na nga!

Nkolo, ee Masiya ooo yaya ooo!

Ayemba loyembo emata ngomba, ngomba Israël
Yahwe eeee Yahwe ee olongi motema na nga!
Makambua ngo elekeli nga kasi na lobi sala ndenge olingioooo
Yahwe eeee Yahwe ee olongi motema na nga!
Ô Yahwe, Yahwe ooo
Likambua ngo elelisi nga kasi na lobi sala ndenge olingioooo
Yahwe eeee Yahwe ee olongi motema na nga!
Yahwe eeee,eee,eee, Yahwe ooo!
Olongieeee, motemaaa ya mosantu na Yo eee!
Yahweô, Yahwe, Yahwe eee Yahwe oo
Olongi motema na kati ya motema ooo
Yahwe ô, Yahwe ô, Yahwe eee Yahwe ô
Yahwe eeee Yahwe ee olongi motema na nga!

Enjoy Synced Lyrics With Our Mobile App

Download on Google PlayGet it on App Store

WATCH VIDEO

ABOUT THIS SONG


Release Year : 2013


Album : Le Culte (Album)


Added By : Worship Fever

SEE ALSO

AUTHOR

ATHOMS & NADEGE

CONGO (DRC)

...

YOU MAY ALSO LIKE