Home Search Countries Albums

A Mon Roi

JOSSIE ILUNGA

A Mon Roi Lyrics


Maloba etondi na motema na nga
Ebongisani pona mokonzi
Lokola mwasi oyo abongisi liboke
Pona kopesa na mobali na ye
Kati na mibali Yesu nde mobali
Alobelaka nga maloba ya ngolu
Bokonzi naye eza na suka te
Azipa nga nase ya kembo na ye
Na yemba na nga ba exploits nayo
Nayekola na nga lolenge ya kosalelayo
Simba nga na loboko, to tambola nzela ya bolingo
Mobimba na nga nionso eza ya yo
Toute la gloire revient à mon Roi
Simba nga na loboko, to tambola nzela ya bolingo
Mobimba na nga nionso eza ya yo
Toute la gloire revient à mon Roi
Na yemba na nga ba exploits nayo
Nayekola na nga lolenge ya kosalelayo

Obosanisi nga ekolo na nga 
Okati singa ya libota na nga
Identité na nga o changer yango
Opesi nga kombo na yo 
Pete ya bolingo na motema 
Yesu yo ofuti nayo talo na nga
Yesu okoma mobali na nga
Okotisi nga na palais royal 
Na yemba na nga ba exploits nayo
Nayekola na nga lolenge ya kosalelayo
Simba nga na loboko, to tambola nzela ya bolingo
Mobimba na nga nionso eza ya yo
Toute la gloire revient à mon Roi
Simba nga na loboko, to tambola nzela ya bolingo
Mobimba na nga nionso eza ya yo
Toute la gloire revient à mon Roi

Bokonzi ya likolo nionso eko sosola
Buanya ya nzambe na nzela na nga 
Nga oyo na bima na mopanzi na ye
Lisolo ta nga na ye eza ya éternité
Sai etondi nga na motema
Na bengama pona mobali ya bomoyi
Maloba naye etonda boboto
Abeta ekuke na motema na nga
Na tongoli ye motema na nga
Kembo ya mwasi eza mobali na ye
Simba nga na loboko, to tambola nzela ya bolingo
Mobimba na nga nionso eza ya yo
Toute la gloire revient à mon Roi
Simba nga na loboko, to tambola nzela ya bolingo
Mobimba na nga nionso eza ya yo
Toute la gloire revient à mon Roi

Simba nga na loboko, to tambola nzela ya bolingo
Mobimba na nga nionso eza ya yo
Toute la gloire revient à mon Roi
Simba nga na loboko, to tambola nzela ya bolingo
Mobimba na nga nionso eza ya yo
Toute la gloire revient à mon Roi
Simba nga na loboko, to tambola nzela ya bolingo
Mobimba na nga nionso eza ya yo
Toute la gloire revient à mon Roi

Enjoy Synced Lyrics With Our Mobile App

Download on Google PlayGet it on App Store

WATCH VIDEO

ABOUT THIS SONG


Release Year : 2021


Album : A Mon Roi (Single)


Added By : Farida

SEE ALSO

AUTHOR

JOSSIE ILUNGA

CONGO (DRC)

Jossie Ilunga is a gospel musician living in Kinshasa ...

YOU MAY ALSO LIKE