Home Search Countries Albums

Se Yo Lyrics


Ah
Se yo
Ezalaka kaka yo denz love
Denz love ah

Na zalaki éprouvé kasi na motema te oh
Kuna bazo lela papa ngai na motema denz love
Salité e suki na nzoto kasi na motema te eh
Kuna nde e sika na logea denz love
Forteresse sécurisée infranchissable
Ata guillaume le conquérant a lingaki ko franchir te
Po bolingo na yo denz love
Fortification na mboka ya motema na ngai eh eh eh mama
Motema lokola ba cellules mères, eko se diviser pe ko se multiplier
Yango moto a koki ko nomba n’ae trois quatre amours
Kasi ya ngai motema indivisible Place moko se ya denz love,  mon amour
Capacité ya motema na ngai bolingo n’o e satura yango bééb eh eh
Espace insuffisant pour d’autres amours
Eko senga na effacer yo po mosusu a remplacé
Kasi moyen ya ko effacer yo na motema na ngai ezali te
Mon amour ouhh
O zali atome moko ya oxygène oyo ezangaki na deux atomes ya hydrogènes
Po e sala mayi, po l’eau c’est la vie
Denz love tu es ma vie, mama tu es ma vie

L’amour éternel pour la vie
 Je te comprends, tu me comprends, on se comprend
Denz love l’amour de ma vie
Ata puissance agonie na l’île Luçon
Ekwesaki te chérie ba ndako nioso ya bolingo
Denz love pour le meilleur et le pire
Mama pour le meilleur et le pire

Ata ko bolingo e wumeli ban aba koli
Kasi bolingo nay o na motema nangai eza kaka ya sika
Ko lela te, ko bang ate eh
Seskul a loba, nie nie nie nie
Tata bo moko, mama bo moko
Ekolo be moko, mokomzi moko
Ata ko ba ministers ba zali, ba généraux pe ba zali
Kasi na motema ne ngai mokonzi se yo moko denz love
Mibale te se yo mama mokonzi
Yii yii yii eh mama mokonzi eh
Mibale te eh, mibale te eh eh

Ba ndekos na ngai ndenge kaka ezakala
Ba familles na ngai ba wutaki mboka b aye kotala bisso na kinshasa
Sikoyo na tango ya retour to décidé na mère
Ti kende ko tika bango ti na mboka
To mati na bateau, ngai mere mokumbi bateau na ba familles na ngai
To komi na kati kati ya lac bateau e dindi
Mere, mokumbi bateau na ba familles na ngai ba dindi
Sikoyo ba yebisi ngai na sala choix na sauver mutu moko
Nako sauver nani ?
Entre mère ba familles na ngai to mokumbi bateau
Bo yebisa ngai ah
Alors mes chers amis
Vous qui ne comprenez pas le lingala, la plus belle langue du monde
Donc j’étais en train de dire ma famille est venue nous rendre visite
Et à la fin de leur séjour, on a décidé de les raccompagner ma femme et moi
Et pendant le voyage, le bateau a coulé
Et on me demande alors de ne sauver qu’une seule personne
Soit un membre de ma famille, ma femme où le capitaine du bateau
A votre avis, qui dois-je sauver

Na motema na ngai se yo ah
Ba lobi na pona entre yo na ba familles na ngai ah
Na lobi raison de vivre na ngai se yo
Se yo wana na titanic
Jack a ndimaki ko se noyer pona rose
Se yo wanu na amour eternel
Kermal a ndimaki risque pour nihan
Se yo wana na un prince a new york
Prince akeem a ndimaki ko koma serviteur pour lisa
Se yo wana na biblia
Abraham a ndimaki ko kabwana na agar na Ismael pour Sarah
Se yo moko mama mokonzi, denz love na ngai mama mokonzi
Se yo moko mama mokonzi aah mama, mama mokonzi eh

L’amour inconditionnel ya toi et moi (ya toi et moi)
Fais mois danser avec amour denz love (love)
Même dans une autre vie tu seras mon seul choix (mon choix unique)
Laissons parler les aigris, bako yoka soni (soni na bango)
Bébé na ngai, bébé na ngai
A kota motema na ngai mobimba profondément
Ah se yo mosusu te (mama mokonzi eh)
Ah ma (mama mokonzi eh)
C’est toi l’amour de ma vie (mama mokonzi eh)
Mama bana na ngai eza yo (mama mokonzi eh)
Ah ah ah (mama mokonzi eh)
Na lela yo ya trop oyebi yango bien (mama mokonzi eh)
Ah mon amour

L’amour inconditionnel ya toi et moi (ya toi et moi)
Fais mois danser avec amour denz love (love)
Même dans une autre vie tu seras mon seul choix (mon choix unique)
Laissons parler les aigris, bako yoka soni ah

Enjoy Synced Lyrics With Our Mobile App

Download on Google PlayGet it on App Store

WATCH VIDEO

ABOUT THIS SONG


Release Year : 2022


Album : Se Yo (Single)


Added By : Farida

SEE ALSO

AUTHOR

FALLY IPUPA

CONGO (DRC)

Fally Ipupa Nsimba is a congelese singer, born on December 1977 in Kinshasa, DRC. ...

YOU MAY ALSO LIKE