Accueil Recherche Pays Albums

Biloko Ya Boye Remix (Corona version)

ALESH

Biloko Ya Boye Remix (Corona version) Lyrics


To mi Batela!
To mi Batela!
To mi Batela
Coronavirus eza blague te!
Ezo boma ya solo!
Yoka!

Bo’o mona to bo’o mona te?
Corona boye bo’o mona te?
Pandémie ya boye bo’o mona te?
Bo sokoka maboko bien.
Bo’o mona to bo’o mona te?
Maladi ya boye bo’o mona te?
Pandémie ya boye bo’o mona te?
Bo lata pe ba masques bien

Yoka!
Ba papas, ba mamans
Corona eza ba jeux te
Eko kanga yo pem’awa lokola moto a kufi na mayi.
Na loba bo yoka bien
Na zongela maloba bien
Oooh coron’eza na Mboka te, Ah tala Biloko ya Boye!
Maman, kosola na coude
Kosu kosu, eek’o panza virus
Tala, ba soyi ya mike nde covid-19 evandaka na kati.
Na tangu ozo bima, zipaka munoko n’o
Yango ba sengi olataka masque
Ah wana penza fo ko sala
RDC eeehhhh RDC makambu eh!
Na virus oyo ozo salela kaka mouchoir ya elamba ! Oyebi papier mouchoir te???
Corona virus ezo boma!
Longola miyoyo na papier mouchoir pe bwaka na fulu!

Bo’o mona to bo’o mona te?
Corona boye bo’o mona te?
Pandémie ya boye bo’o mona te?
Bo sokoka maboko bien
Bo’o mona to bo’o mona te?
Maladi ya boye bo’o mona te?
Pandémie ya boye bo’o mona te?
Bo lata pe ba masques bien

Yeah! Tembe n’o
Bwaka na fulu, kosala ba jeux te.
Yo! Zala musika 1 mètre
Lisolo ya pene nde toboyi
Tangu maladi eko panzana awa, bo benga bakonzi?
Contamination pona mutu makasi, bolelela l’Etat?
Oulalaaahh, o’o sala nini wana, Mbote ya maboko lisusu?
Eh! Tala biloko ya boye!
Mais oulalah, o’o sala nini koh! O’o pesa ba bisous
Eh! biloko ya boye!

Tembe ya Kisasa oyo nde eko silisa batu moyen te
Lobi matanga munene na lemba, bana misatu bakufi
Maman na bango atongoli bango Congo Bololo
Pilipili, na mikuwa ya pose!
Yaya information ya mabe eko boma batu!

Bo’o mona to bo’o mona te?
Corona boye bo’o mona te?
Pandémie ya boye bo’o mona te?
Bo sokoka maboko bien.
Bo’o mona to bo’o mona te?
Maladi ya boye bo’o mona te?
Pandémie ya boye bo’o mona te?
Bo lata pe ba masques bien

Oyoki fièvre o’o loba te!
Kosu kosu, o’o loba te
Ba courbatures o’o loba te
Ba Pema mingi o’o loba te
Hôpital’eza nango ya ofele
Zua Tshombo benga ba numéros
101, 109 to 110
P’ozwa lisungi ya bakonzi
Mais benga koooooohhh!
O’o banga nini, ea maladi!
Maladi ya boye o’o mona te? To loba ooooh to loba te!
Toko longa Corona
Toko longa Corona, biso
Toko longa Corona, etunaki bien te hein
Toko longa Corona
Toko longa Corona, biso
Toko longa corona, na bomoko oyo
Toko longa Corona
Toko longa Corona, biso
Maladi ya boye

Bo’o yoka to bo’o yoka te?
Mibeko ya l’Etat Bo’o yoka te?
Docteur Muyembe ao loba bien, to sokola maboko bien
Bo’o yoka to bo’o yoka te?
Mibeko ya l’Etat Bo’o yoka te?
Docteur Muyembe ao loba bien, to lata ba masque eeehhh!

Enjoy Synced Lyrics With Our Mobile App

Download on Google PlayGet it on App Store

WATCH VIDEO

ABOUT THIS SONG


Release Year : 2020


Album : Biloko Ya Boye Remix (Corona version) (Single)


Added By : Farida

SEE ALSO

AUTHOR

ALESH

Congo RDC

Alain Chirwisa, plus connu sous son nm de scène ALESH  est un artiste congolais. ...

YOU MAY ALSO LIKE